C.Internacional – Informação

2594 Resultados / Pagina 211 de 289

C.Internacional - Destaque

Mokonzi ya ekolo João Lourenço, ayambaki na masolo Abel Karin Deby Itno, motindami ya mokambi ya mbura matari ya mbongwana ya ekolo Tchad

Abel Karin Deby Itno ayebaki kopesa mokanda na masolo epayi ya mokonzi João Lourenço oyo wapi mokambi ya mbura matari ya mbongwana ya ekolo Tchad atindaki epayi ya João Lourenço, komona ete tata mokonzi ya ekolo Angola yende azali pe mokambi ya lisanga na bikolo na bitima minene to grand lac. Abel Karin Deby Itno akoyeba kotambola na bikolo ebele ya mokili na afrika Fina nase oyoka masolo manso Liziba […]

todayMaio 7, 2021 74

C.Internacional - Destaque

Angola é o país dos PALOP com mais francófonos

A directora da Alliance Francesa angolana, assegurou que o nosso país a nível dos países de língua oficial portuguesa CPLP, é o que tem mais falantes do Francês. Florence Doasse Boné, disse ainda ser de extrema importância o ensino da língua francesa em Angola, tendo em conta a partilha de fronteiras com países de línguas oficiais Francesa e Inglesa.

todayMaio 6, 2021 295

C.Internacional - Destaque

Recredit akoki kozwa 80% ya mosolo nionso ya BPC oyo badefi nango babandaki koboya kofuta

BPC ye apesa ba niongo ebele epayi ya batu baye bazalaki kofuta mosolo yango te, kasi na ngonga oyo recredit akoki kobotola mosolo wana na bilembo 80%, lolenge PCA ya Recredit Walter Barros ayebaki kondimisa. Kaka na maloba naye, mokambi wana alaki ete moto nionso oyo akoboya kofuta misolo oyo adefa, akomona kanda ya mibeko ya l´Etat ya ekolo Angola to na mukuse bako fandisa ye na ebonga na bosambiseli. […]

todayMaio 6, 2021 101

C.Internacional - Destaque

Kompani ya ENDIAMA ayebi kokotisa koleka 58 millions ya mosolo na USD naba sanza misato ya yambo ya mobu na 2021

Mosolo wana bakoki kokotisa yango nabotekisi 1,17 millions yaba kilates yaba diamants to mabanga na talo na bikolo naba mpaya, lolenge endimisaki mokambi na makambo na mombongo na kompani wana tata José Sousa. Ye andimisaki lisusu ete, kolandela eleko kaka se yoko na mobu eleki ya 2020, mua bokiti ya talo yaba kilate ezali kasi talo yabo tekiseli yango, eyebi komata. Fina nase oyoka masolo manso Liziba ya sango: RNA/Canal […]

todayMaio 6, 2021 64

C.Internacional - Destaque

L´etat ya ekolo Angola alobi ete ezali na 16 ya mangomba na losambo wapi bokozwa makanda

Ministre na makambo naki bonkoko Jomo Fortunato nde alobaki yango na tango lobi azalaki na bokutani na makambi mosusu ya mangomba na losambo wapi basololaki makambu matali bosalisani pe boyokani na kati na mangomba na losambo pe l´etat. Pe lisusu Jomo Fortunato andimisaki ete l´Etat ayebi Don Afonso Nunes lokola mokambi ya lingomba yaba Tocoista na kati ya ekolo Angola. Fina nase oyoka masolo manso Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista […]

todayMaio 6, 2021 66

C.Internacional - Destaque

599 ya batu bakufi na makama ya mituka naba sanza misatu ya yambo ya mobu na 2021

Sango yango bandimisaki yango lobi na tango bazalaki na bokutani ya conseil national yabo tamboli mituka ose bua ekolo Angola, wapi misala mitambwisamaki epayi ya comandant general yaba police ya ekolo nabiso Angola, Paulo de Almeida. Makama na mituka emonanaki na motango yaba mil motoba pe nde yango ebomaki batu na motango yako leka ba nkama mitano pe na kati ya motango wana nionso, mingi ya batu bakufeli na engumba […]

todayMaio 6, 2021 128

C.Internacional - Destaque

Nuno Albino, secretaire ya l´Etat na makambu na bopanzi sango andimisi ete TV ZIMBO naba Kompani ya MEDIA MOVA babongoli lolenge nabango yabo panzeli sango te

Mokambi wana alobaki makambu maye na tango azwaki maloba na bofandeli oyo ezalaki kolobela mokolo na «bonsomi na na bopanzi sango», milulu miango milekelaki na CEFOJOR awa na engumvba mokonzi luanda. Pona mobu oyo ya 2021, mama na likambu ezalaki ete Sango ezali eloko ya motuya pona bato Banso pe kuna emonanaki bapanzi sango yaba kompani ebele. Kaka na tango yango, tata Nuno Albino ayebaki kolaka ete, atako l´Etat ya […]

todayMaio 4, 2021 64

C.Internacional - Destaque

530 yaba mil ya batu bakozokisa bango mangwele na dose ya mibale ya ASTRAZENECA

Sango wana ezali ministre na makambu na bokolongono bwa nzoto, Silvia Lutukuta nde andimisaki yango na tango abandaki kopesa basango ya suka ya bokono na covid-19 wuta na ndaku yabo panzi sango CIAM. Motambuisi na makambu na bokolongono bwa nzoto asilaki pe kozwa nayino ye moko dose ya mibale ya mangwele na Astrazeneca, wapi abuakaki pe mbela na batu bayeba kokende kozwa mangwele na tango yango eko koma bisika bango […]

todayMaio 4, 2021 59

C.Internacional - Destaque

Charles Michel, president ya Conseil Européen azalaki na ekolo Angola

Mokambi ya conseil européen Charles Michel ayebaki kozala na mobembo ya mosala ose bua ekolo nabiso Angola, wapi ye akutanaki na mokonzi ya ekolo Angola tata João Lourenço pe basololaki makambu ebele na oyo etali boyokani pe bosalisani ose bua ba ngambu nionso wana mibale. Pe Conseil Européen elaki kosunga ekolo Angola na makambu matali bobundisi bokono na covid-19 pe bapesaki makumbisi na lolenge mbura matari ya ekolo nabiso azali […]

todayMaio 3, 2021 105

0%
donut_large