C.Internacional - Destaque

Mobeti basket ya muai ya ekolo na biso, Nacissela Maurício, asilaki kozua lokumu na FIBA-Africa ya mambi matali développement ya sport

todaySetembro 28, 2021 67

Background
share close

Mobeti basket ya muai ya ekolo na biso, Nacissela Maurício, oyo asila kozua na mbala mibale motole to MVP ya Afro-basket ya basi na mibu 2011 pe 2013, asilaki kozua lokumu na FIBA-Africa (Federation Internationale ya Basquet ya Afrique) pona bozalisami naye na mambi matali développement ya sport na eleko pe sima ya eleko ya carrière naye ya massano.

Naboyebi ete capitaine ya kala ya équipe nationale azalisami kati na liste ya babetiya kala ya massano ya Africa baye basila kolonga défi ya maternité pe bakoba kobeta na niveau ya likolo, pe lelo bazali komema expérience na bango poya bosungi na ba ngambo esusu ya massanoo.

Esengeli koyeba ete o engumba mokonzi Yaoundé, epayi wapi azala na moto ya Fédération angolaise ya basket-ball, Nacissela Maurício asila kosunga ekolo Angola poya kozua esikaya 8 na yoko compétition eye esila kolongama na Nigeria, na bobeti Mali nanyoko final eye esila koleka na lomingo na bitunga 70-59, ata ko ye azalaka na zemi ya ba sanza 7.

Esengeli koyeba ete mobeti eye ya kala to ex-pratiquante asili kotalisa posa naye ya bomoni ekolo naye kozongela podium ya Afro-basket ya basi, eye esila kosalema wuta 2013, na eleko eye Angola esilaka kozua trophée ya 2 ya continental, na Maputo, pe ye asilaka kozua prix naye ya 2 ya MVP. Fina na nse oyoka manso

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.

  • cover play_arrow

    Mobeti basket ya muai ya ekolo na biso, Nacissela Maurício, asilaki kozua lokumu na FIBA-Africa ya mambi matali développement ya sport rna

 

Editor: rna

Rate it

Notícias

C.Internacional - Destaque

Tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, azalisami kati na engumba mokonzi Madrid, o ekolo Espagne, poya yoko visite ya mosala

Tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, asilaki kokoma o engumba Madrid, capitale ya Royaume ya Espagne, na mokolo na lomingo eye poya yoko visite ya mosala ya mikolo 2, naboyebi ete ezali visite ya yambo ya tata mokonzi João Lourenço, wuta asila kozua bokonzi o ekolo Angola. Naboyebi lisusu ete tata mokonzi azalisami elongo na maman wa yambo ya ekolo, Ana Dias Lourenço, pe bango basilaki kokoma o ekolo Espagne […]

todaySetembro 28, 2021 58 2

0%
donut_large