C.Internacional - Destaque

Tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, azalisami kati na engumba mokonzi Madrid, o ekolo Espagne, poya yoko visite ya mosala

todaySetembro 28, 2021 58

Background
share close

Tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, asilaki kokoma o engumba Madrid, capitale ya Royaume ya Espagne, na mokolo na lomingo eye poya yoko visite ya mosala ya mikolo 2, naboyebi ete ezali visite ya yambo ya tata mokonzi João Lourenço, wuta asila kozua bokonzi o ekolo Angola.

Naboyebi lisusu ete tata mokonzi azalisami elongo na maman wa yambo ya ekolo, Ana Dias Lourenço, pe bango basilaki kokoma o ekolo Espagne sima ya bowuti o États-Unis ya América, epayi wapi azalisamaki na débat ya mbala na 76 ya Assemblée générale ya ONU, na bobandisi naino na engumba ya Washington, na etapi ya yamboepayiwapi asilaki kozua lokumu pe motole na tina ya mosala naye na mabongisami to initiative ya bobatelami ya environnement.

Esengeli koyeba ete visite d’État ya tata mokonzi ya ekolo, ekobanda na mokolo na ibale eye mokolo na 28, mokolo eye tata mokonzi akoyingisama na palais ya Zarzuela poyo yoko bokutani elongo na roi Philippe VI, ya Espagne, pe yango ekolandama na bokutani esusu elongo na mokonzi ya Gouvernement ya ekolo Espagne, tata Pedro Sânchez.

Naboyebi ete boyokani kati na bkolo binso , Angola pe Royaume ya Espagne efandsami kati na Accord général ya coopération eye basila ko signé na mokolo na le 20 mai 1987 pe Accord mosusu to complémentaire ya Accord général eye basila ko signé nasanza ya 11 na Fina na nse oyoka manso

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.

  • cover play_arrow

    Tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, azalisami kati na engumba mokonzi Madrid, o ekolo Espagne, poya yoko visite ya mosala rna

Editor: rna

Rate it

Notícias

C.Internacional - Destaque

JOAO LOURENÇO COMMENCE UNE VISITE EN ESPAGNE

Le Chef de l'État angolais, João Lourenço, et le Président du gouvernement espagnol, Pedro Sanchez, se sont reuni ce mardi, à Madrid, pour évaluer la mise en œuvre des accords de coopération signés entre les deux pays. L'Angola et le Royaume d'Espagne ont signé plusieurs accords de coopération, principalement dans les secteurs de l'agriculture, de la pêche, de l'industrie, du commerce, du tourisme, de la défense et de la sécurité […]

todaySetembro 28, 2021 71

0%
donut_large