C.Internacional - Destaque

Mokonzi ya kala ya TCUL, asili kozonga o ekolo Angola, kowuta Portugal epayi wapi asili kokangema

todaySetembro 23, 2021 66

Background
share close

Mokonzi ya kala ya Conseil ya administration ya entreprise ya transports urbains ya Luanda (TCUL), tata Abel António Cosme, basili komokanga o ekolo Portugal poya botindi ye o ekolo Angola, pe ye asilaki kokoma o engumba mokonzi Luanda na mokolo na ibale eye.

Naboyebi ete tata Abel Cosme, ye oyo azala mokimi to fugitif oyo bazalaka koluka na justice, azalisami na molongó ya bato baye bazali o kati ya mambi matali “CNC”, baye basila kofundama na bokambi na lolenge esengelaki te ya Unicargas.

Naboyebi ete mofundami ya yambo katina mambi miango ezala ministre ya kala ya Transports, tata Augusto da Silva Tomás, ye oyo basila komo condamné na mibu 14 ya boloko poya détournement ya misolo pemambi masusu miyike ya mabe.

Fina na nse oyoka manso

  • cover play_arrow

    Mokonzi ya kala ya TCUL, asili kozonga o ekolo Angola, kowuta Portugal epayi wapi asili kokangema rna

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa

Editor: rna

Rate it

Notícias

C.Internacional - Destaque

Ngambo ya sud ya ekolo esili kolengelama poya bozui lotiliki ya moyi pe mayi ya peto

Bituka ya Cunene, Namibe, Cuando Cubango pe Huíla misili kolengelama poya bozui lotiliki ya moyi to pe systèmes ya énergie solaire pe mayi na mabongisami ya yoko projet ya motango ya 1,5 milliard ya mosolo ya dollars américains, miye miko pesama groupe américain « Sun Africa ». Naboyebi ete mburamatari ya ekolo Angola elongo na société « Sun África » basilaki kotiya mokoloto na mokolo na lundi eye o engumba […]

todaySetembro 23, 2021 40

0%
donut_large