C.Internacional - Destaque

Ngambo ya sud ya ekolo esili kolengelama poya bozui lotiliki ya moyi pe mayi ya peto

todaySetembro 23, 2021 40

Background
share close

Bituka ya Cunene, Namibe, Cuando Cubango pe Huíla misili kolengelama poya bozui lotiliki ya moyi to pe systèmes ya énergie solaire pe mayi na mabongisami ya yoko projet ya motango ya 1,5 milliard ya mosolo ya dollars américains, miye miko pesama groupe américain « Sun Africa ».

Naboyebi ete mburamatari ya ekolo Angola elongo na société « Sun África » basilaki kotiya mokoloto na mokolo na lundi eye o engumba Washington na yoko protocole ya bondimami poya misala yango kobanda, misala miye mikosalema na etando ya ba municípios minso ya minene lokola pe ba comuna ya ekolo Angola.

Pe kolandisama ministre ya lotiliki pe mayi, tata João Baptista Borges, ye oyo asilaki kotiya mokoloto na mokanda yango na ngambo ya ekolo Angola, na bozalisami to présence ya tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, moboko to pe objectif na yango ezali poya bopesi lotiliki pe mayi na population pe kopesa bokasi na ba entreprises économiques miye mizali kobunda poya bobimi.

Fina na nse oyoka manso

  • cover play_arrow

    Ngambo ya sud ya ekolo esili kolengelama poya bozui lotiliki ya moyi pe mayi ya peto rna

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa

 

Editor: rna

Rate it

Notícias

0%
donut_large