C.Internacional - Destaque

o ekolo Mali, moto oyo amekaki koboma mokonzi ya transition asili kokufa kati na boloko na garde à vue.

todayJulho 27, 2021 18

Background
share close

o kati ya ekolo Mali, moto oyo basilaki komofunda poya attentat ya assassinat, na mokolo na mibale moleki, ya mokonzi ya transition ya ekolo mali, colonel Assimi Goïta, kati na Mosquée monene ya Bamako, asili kokufa na mokolo na lomingo eye, mokolo na le 25 juillet kati na garde à vue, esilaki kotalisa gouvernement ya ekolo Mali na yoko liyebisi.

Naboyebi ete manso mabandaki na mokolo yango ya lomingo, epayi wapi yoko liziba ya securité ya ekolo Mali esilaki koyebisa na bapanzi sango ete bokolongono bua nzoto to pe santé ya moto yango to agresseur ya mokonzi ya transition, esilaki komonisama na malamu penza te, azalaki na lopitalo, pe na sima ya tango, ministre na yambo ya ekolo Mali, tata Choguel Maïga asilaki kokutana na mokonzi ya transition, colonel Assimi Goïta poya bolobeli mambi miango pe sima ya mua tango basilaki kopesa sango ya kufa ya  moto yango. Akufi na nini? Eyebani naino te kasi yoko liyebisi etalisi ete yoko autopsie ekosalema poya boyebi ba causes ya liwa yango.

Fina na nse oyoka manso

  • cover play_arrow

    o ekolo Mali, moto oyo amekaki koboma mokonzi ya transition asili kokufa kati na boloko na garde à vue. rna

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa

Editor: rna

Rate it

Notícias

C.Internacional - Destaque

Tata mokonzi João Lourenço kati na yoko mobembo ya mikolo 2 o ekolo Turquie.

Tata mokonzi João Lourenço, asilaki kotika mabele ya engumba mokonzi Luanda na mokolo mua lundi mua lelo, poya bosali mobembo o ekolo ekolo Turquie, yoko mobembo eye ekosala mikolo mibale, na mbianga ya moninga naye mokonzi ya ekolo Turquie, tata Recep Tayyip Erdogan. Naboyebi ete tata mokonzi João Lourenço, elongo na yoko délégation ya niveau ya likolo, akokutana na moninga naye ya ekolo Turquie o eleko ya poka ya mokolo […]

todayJulho 27, 2021 23

0%
donut_large