C.Internacional - Destaque

Tata mokonzi João Lourenço kati na yoko mobembo ya mikolo 2 o ekolo Turquie.

todayJulho 27, 2021 23

Background
share close

Tata mokonzi João Lourenço, asilaki kotika mabele ya engumba mokonzi Luanda na mokolo mua lundi mua lelo, poya bosali mobembo o ekolo ekolo Turquie, yoko mobembo eye ekosala mikolo mibale, na mbianga ya moninga naye mokonzi ya ekolo Turquie, tata Recep Tayyip Erdogan.

Naboyebi ete tata mokonzi João Lourenço, elongo na yoko délégation ya niveau ya likolo, akokutana na moninga naye ya ekolo Turquie o eleko ya poka ya mokolo na mibale mua lóbi. Pe kati na visite yango, ba délégations ministérielles bakoyeba na kolobela mambi matali boyokani kati na bikolo binso mibale, Angola pe Turquie, na botiami ya mokoloto na boyokani to accords ya coopération, na ba ngambo to domaines ya transports,mampinga, mombongo, nkita, ressources minérales, lokola pe lisusu ngambo ya consulaire pe diplomacia, na bolongoli ya ba visa kati na ba passeports ya misala, diplomatiques pe miye mibangemi spécial.

Esengeli koyeba ete na mokolo na misato, mokolo na suka ya visiteyango, tata mokonzi João Lourenço akozalisama na yoko liyangani ya bato na mombongo, elongo na bato na mombongo epayi ya ba nani akoyeba na kotalisa mambi matali nkita ya ekolo Angola pe mambi masusu matali boluki ya bomati ya ngambo ya mombongo.

Esengeli koyeba ete boyokani ya diplomacia kati na Angola pe Turquie ebanda wuta 1980 pe bikolo binso mibale basila kokubisa boyokani na ngambo ya mombongo, boloni bilanga, kibonkoko, balakisi, défeza, bosemba to justice pe massano.

Fina na nse oyoka manso

  • cover play_arrow

    Tata mokonzi João Lourenço kati na yoko mobembo ya mikolo 2 o ekolo Turquie. rna

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa

Editor: rna

Rate it

Notícias

CANAL A - Destaque

Tribunal Arbitral Internacional dita Sonangol como proprietária do investimento na Galp

A Empresa Sonangol E.P. é a única proprietária do investimento angolano na Galp. A decisão é do Tribunal Arbitral Internacional, que deu razão à Sonangol, contra Isabel dos Santos, no processo relativo à participação da Galp, declarando a petrolífera estatal como único proprietário do investimento. Saiba mais, no áudio abaixo, com o jornalista Manuel Esperança: Fonte: RNA

todayJulho 27, 2021 61 1

0%
donut_large