Tata mokonzi João Lourenço, asilaki kotalisa na mokolo mua ibale eye, motuya ya boyokani kati na Union africaine (UA) pe Communauté ya Caraïbes (CARICOM), naba ngambo ya bomati ya nkita to développement économique lokola pe maye matali ngambo ya bozalisami elamu ya bato.
Ezalaki na bopesi naye maloba na yoko liyangani ya bililingi to sommet virtuel ya bakonzi ya bikolo pe mburamatari ya bikolo ya Africa pe Caraïbes, nde tata mokonzi João Lourenço asilaki kolobela motuya ya boyokani naba ngambo ya environnement, ya gestion ya ba ressources naturelles pe mbonguana ya climat.
Naboyebi ete na bozui naye maloba, tata mokonzi ya ekolo Angola asilaki kotalisa na banso ete boyokani kati ba organisations minso mibale misengeli kokoba kino na ba secteurs y aba droits de l’homme, ya democracia, ya bokambemi malamu pe bobundisi ya terrorisme pe ba crimes.
Kaka na bozui naye maloba tata mokonzi João Lourenço aangaki te kotalisa lisusu na banso ete ekolo na ye Angola ekoyamba na mokolo na 4 kino ya 8 ya sanza ya 10 ya mobu moye, Biennale ya ibale ya Luanda kolobela mmbi matali kimia oe kibonkoko kati na Africa na yoko mabongisami elongo na UNESCO. Fina na nse oyoka manso
Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.