Tata mokonzi João Lourenço, asilaki kofungola na mokolo na ibale eye, ndako monene ya bokolongono bua nzoto, Cardinal Dom Alexandre do Nascimento poya bokono ya cardio-pulmonaire, eye ezalaka na kala na kombo lopitalo ya ‘‘Sanatório ya Luanda’’. Naboyebi ete tata mokonzi azalaki elongo na molongani naye maman wa yambo ya ekolo, Ana Dias Lourenço, molandi naye, tata Bornito de Sousa, pe ba membres ya Exécutif, naboyebi ete tata mokonzi asilaki kotambola na biteni binso ya lopitalo yango poya bomoni na yemei lolenge ezalisami.
Esengeli koyeba ete milulu ya bofunguami yango esalemaki sima ya yoko milulu ya losambo kotambuisama na ba évêques ya Luanda, Mgr Filomeno Vieira Lopes, pe Mgr José Manuel Imbamba, mokonzi to président ya Conférence épiscopale ya Angola pe São Tomé (CEAST), emonisamaki pe lisusu o esika yango, Cardinal Alexandre do Nascimento.
Naboyebi ete lopitalo yango ezuami na município ya Kilamba Kiaxi, o engumba mokonzi Luanda, epayi wapi misala esilaki komonisama na yoko budget ya motango koleka 214, 85 millions ya mosolo ya dollars, poya botongami, bobongisi pe bosombi ya bisalelo to équipement ya lopitalo. Fina na nse oyoka manso
Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.