C.Internacional - Destaque

Angola esili koyamba motango koleka ba millions 3 ya ba doses ya manguele ya sinopharm

todayDezembro 2, 2021 221 1

Background
share close

Na basango ya Covid, Angola esilaki koyamba na mokolo ya lundi eye, motango koleka ba millions 3 ya ba doses ya manguele ya sinopharm, na mabongisami ya mburamatari ya ekolo Angola na tina ya bozui ya ba agents immunisants poya manguele ya population.

Naboyebi ete kolandisama secrétaire d’État na mokumba ya ngambo ya mambi matali ba lopitalo, tata Leonardo Europeu, na bopesi naye maloba na suka ya bopesami ya lot yango ya ba doses ya manguele,  ekolo esili kokokisa sika  yoko motango ya 8 millions 500 mille doses ya manguele ya sinopharm kobiangama na Gouvernement.

Naboyebi ete kobakisa na mbianga na yemei ya manguele, gouvernement ya ekolo esilakozua wuta sanza ya misato moleki, motango koleka 5 millions ya ba doses lokola dons ya yoko yoko ya bikolo na mabongisami to cadre ya Covax to na lolenge ya unilatérale.

Pe esengeli koyeba ete kino suka ya mobu moye, ekolo esengeli na boyambi yoko motango ya 7,5 millions ya ba doses pe lisusu yoko motango koleka  32 millions ya manguele kobanda lelo kino trimestre ya yambo ya mobu 2022. Fina na nse oyoka manso

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.

  • cover play_arrow

    Angola esili koyamba motango koleka ba millions 3 ya ba doses ya manguele ya sinopharm rna

 

Editor: rna

Rate it

Notícias

C.Internacional - Destaque

Tata mokonzi ya ekolo asilaki kofungola ndako ya bokolongono bua nzoto poya bokono ya cardio-pulmonaire

Tata mokonzi João Lourenço, asilaki kofungola na mokolo na ibale eye, ndako monene ya bokolongono bua nzoto, Cardinal Dom Alexandre do Nascimento poya bokono ya cardio-pulmonaire, eye ezalaka na kala na kombo lopitalo ya  ‘‘Sanatório ya Luanda’’. Naboyebi ete tata mokonzi azalaki elongo na molongani naye maman wa yambo ya ekolo, Ana Dias Lourenço, molandi naye, tata Bornito de Sousa, pe ba membres ya Exécutif, naboyebi ete tata mokonzi asilaki […]

todayDezembro 2, 2021 132

0%
donut_large