Na basango ya Covid, Angola esilaki koyamba na mokolo ya lundi eye, motango koleka ba millions 3 ya ba doses ya manguele ya sinopharm, na mabongisami ya mburamatari ya ekolo Angola na tina ya bozui ya ba agents immunisants poya manguele ya population.
Naboyebi ete kolandisama secrétaire d’État na mokumba ya ngambo ya mambi matali ba lopitalo, tata Leonardo Europeu, na bopesi naye maloba na suka ya bopesami ya lot yango ya ba doses ya manguele, ekolo esili kokokisa sika yoko motango ya 8 millions 500 mille doses ya manguele ya sinopharm kobiangama na Gouvernement.
Naboyebi ete kobakisa na mbianga na yemei ya manguele, gouvernement ya ekolo esilakozua wuta sanza ya misato moleki, motango koleka 5 millions ya ba doses lokola dons ya yoko yoko ya bikolo na mabongisami to cadre ya Covax to na lolenge ya unilatérale.
Pe esengeli koyeba ete kino suka ya mobu moye, ekolo esengeli na boyambi yoko motango ya 7,5 millions ya ba doses pe lisusu yoko motango koleka 32 millions ya manguele kobanda lelo kino trimestre ya yambo ya mobu 2022. Fina na nse oyoka manso
Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.