C.Internacional - Destaque

Tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, asilaki ko actualiser na mokolo mua lundi eye

todayNovembro 23, 2021 148 2 1

Background
share close

Tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, asilaki ko actualiser na mokolo mua lundi eye, awa o engumba mokonzi Luanda, ba données électorales, na mabongisami ya Registo Eleitoral Oficioso kati na ekolo.

Ezalaki bobele se na miniti 10 nde tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, elongo na molongani naye, maman wa yambo ya ekolo, Ana Dias Lourenço, basilaki kosalisa to ko actualiser ba données na bangom ya maponami, miye mikopesa nzela na boponi to droit de vote na maponami ya législatives miye milengelami kozalisama na mobu 2022.

Naboyebi ete mabongisami miango mizali bobele se pona bana ba ekolo baye bazali na mibu koleka 18 ya mbotama, pe baye bazali ba mbotama ya ekolo, pe yango ezali kaka na ekolo te kasi kino na baye bazalisami o libanda ya ekolo.

Esengeli koyeba ete ezali mobeko kowuta na mokanda ya mobeko ya série I – n° 178, kolimbola ete texte officiel eye ezali poya ba citoyens angolais koleka mibu 18 aya mbotama lolenge mokanda to carte d’identité ya yoko na yoko ezali komonisa. Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.

  • cover play_arrow

    Tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, asilaki ko actualiser na mokolo mua lundi eye rna

Editor: rna

Rate it

Notícias

0%
donut_large