C.Internacional - Destaque

Angola esili kosenga bopesami na bopete ya ba visa na ba ekipi ya bokomami ya baponi to ba electeurs, ya ekolo Angola, baye bafandaka na bikolo ya bapaya

todaySetembro 10, 2021 73

Background
share close

Ministre ya Administration du territoire, tata Marcy Lopes, asili kosenga na communauté internationale natina ya bosungi na bozui ya visa na bopete na ba équipes ya enregistrement ya baponi to ba électeurs angolais baye bafandaka na bapaya.

Ezalaki na yoko liyangani kosangisa ba ntoma ya bikolo na bapaya onsé bua ekolo Angola, epayi wapi tata ministre asilaki kopesa maloba na tina ya enregistrement ya ba électeurs angolais baye bapona bikolo na bapaya pona kovanda, poe te manso misalema o kati ya ba missions diplomatiques pe consulaires, kobanda sanza na yambo ya mobu mokoya.

Na elikya ete yoko boyokani ekosalema elongo na ba missions diplomatiques po ete ba mbotama ya ekolo Angola na bapaya basila kokomama lokola baponi pe kosalela droit na bango kati na maponami ya législative, miye milengelami kozalisama na mobu 2022. Fina na nse oyoka manso

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.

  • cover play_arrow

    Angola esili kosenga bopesami na bopete ya ba visa na ba ekipi ya bokomami ya baponi to ba electeurs, ya ekolo Angola, baye bafandaka na bikolo ya bapaya RNA

Editor: RNA

Rate it

Notícias

C.Internacional - Destaque

Tata mokonzi João Lourenço, asili kotalisa motuya ya boyokani kati na Union africaine pe Communauté ya Caraïbes

Tata mokonzi João Lourenço, asilaki kotalisa na mokolo mua ibale eye, motuya ya boyokani kati na Union africaine (UA) pe Communauté ya Caraïbes (CARICOM), naba ngambo ya bomati ya nkita to développement économique lokola pe maye matali ngambo ya bozalisami elamu ya bato. Ezalaki na bopesi naye maloba na yoko liyangani ya bililingi to sommet virtuel ya bakonzi ya bikolo pe mburamatari ya bikolo ya Africa pe Caraïbes, nde tata […]

todaySetembro 10, 2021 75

0%
donut_large