Tata mokonzi João Lourenço kati na bosuaneli elongo na ba companies ya America na tina ya mambi matali conservation to bobatelami ya environnement
Tata mokonzi João Lourenço, asilaki kosuanela na mokolo na mibale eye, awa o engumba mokonzi Luanda, na tina ya bokubisi ya lisungi na mabongisami ya bobatelami pe bobongisi ya etando to environnement, lokola pe bozalisami ya ba entreprises ya américa kati na misala ya bolongoli ba mine to déminage o ekolo Angola. Naboyebi ete tata mokonzi ya ekolo asilaki koyamba ntoma muasi ya États-Unis ya América o ekolo Angola, maman […]
Na ngambo ya bokolongono bua nzoto, ba cas ya bokono ya maba to lepre ezali se komata o etuka ya Cunene, pamba te motango 65 ya ba cas ya maba to lèpre misilaki komonisama kati na etuka yango, na semestre ya yambo ya mobu tozali pe kobakisa lisusu motango 12 na mobu moleki.