Molandi ya tata mokonzi ya ekolo, tata Bornito de Sousa, asili koyingisama o ekolo Zambie poya bozalisami na milulu ya botiami na ebonga ya mokonzi ya sika ya ekolo Zambie, tata Hakainde Hichiléma.
Nabasango ya ekolo, molandi ya tata mokonzi ya ekolo, tata Bornito de Sousa, asili kolengela kozalisama na mokolo na ibale eye, na kombo ya tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, na milulu ya botiami na ebonga ya mokonzi ya sika ya ekolo Zambie, tata Hakainde Hichiléma. Naboyebi ete tata Bornito de Sousa asilaki kokita na mabele ya engumba mokonzi Lusaka, o ekolo zambie, na mokolo mua lelo elongo na yoko […]
Misala ya botongi siège ya sika ya Commission électorale nationale (CNE), kati na quartier ya Coqueiros, o engumba mokonzi Luanda, misili kolengelama poya bosili na sanza ya minei ya mobu 2022, date eye basili kolengela poya bofunguami na yango.