C.Internacional - Destaque

: Portugal esili kondima kobongisa sanctuaire ya Notre Dame ya Muxima o ekolo Angola.

todayMaio 20, 2021 27

Background
share close

Yoko mabongisami ya bosungi na mosolo to financement pona Angola, miye mizalisami na mabongisami ya bobongisi Sanctuaire ya Notre Dame ya Muxima pe botongi ya ba nzela, misilaki kondimama na gouvernement ya Portugal, esilaki kotalisa na mokolo mua lóbi moleki, ministre ya yambo ya ekolo yango, tata António Costa.

Naboyebi ete ezalaki na sima ya bosilisi yoko liyangani elongo na mokonzi ya ekolo Angola, tata João Lourenço, o engumba mokonzi Paris (France), nde tata António Costa asilaki kopesa maloba na bapanzi sango, kasi ye apesi te motango ya mosolo eye esengeli poya misala miango, nzoka nde asilaki kolimbola bobele ete misolo na credits miye misila kokangema pona ekolo Angola, na tango ya kala basili kozongisa yango na mosala.

Naboyebi ete tata mokonzi João Lourenço elongo na tata António Costa, banso babale bazalisamaki na mokolo mua mibale eye o engumba Paris, na liyangani to Sommet ya mambi matali nkita ya africa, na mabongisami  ya mburamatari ya ekolo França. Epayi wapi bakonzi ya bikolo miyike ya africa misilaki komonisama poya bosuaneli na tina ya bomati ya nkita ya bikolo ya africa. Fina na nse oyoka masolo  yango. Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.

  • cover play_arrow

    : Portugal esili kondima kobongisa sanctuaire ya Notre Dame ya Muxima o ekolo Angola. rna

Editor: rna

Rate it

Notícias

0%
donut_large