Tata mokonzi João Lourenço, kati na liyangani, elongo na baninga naye ya bikolo misusu ya africa, na bokutani ya engumba mokonzi Paris, na tina ya nkita ya Africa.
Tata mokonzi João Lourenço, asilaki koyangana na mokolo mua lelo, elongo na baninga naye ya bikolo misusu ya africa, na bokutani to sommet na tina ya nkita to économie ya Africa, eye ezali koleka onsé bua engumba mokonzi Paris. Naboyebi ete bokutani yango ezalisami na mabongisami ya Gouvernement ya frança, kati na ndako monene ya Éphémère-Champ de Mars, epayi wapi bakonzi pene na motango 10 ya africa basilaki koyangana poya […]
Boyokani kati na Angola pe Afrique ya ngele ezalaki kati na moboko ya masolo na mokolo mua lóbi moleki, o engumba mokonzi Paris, onsé bua ekolo França, kati na mokonzi ya ekolo Angola, tata João Lourenço, pe moninga naye ya Africa ya ngele, tata Cyril Ramaphosa.