C.Internacional - Destaque

O ekolo Tchad, bokundami ya mokonzi Idriss Déby Itno esili koleka na mokolo mua minei eye, o liboso ya bakonzi bayike ya bikolo.

todayAbril 26, 2021 51

Background
share close

Naboyebi ete mokonzi ya ekolo tchad, tata Idriss Deby asilaki kokufa wuta mokolo na mibale ya poso eye, mokolo na 20 ya sanza eye ya 4 kati na etando to  zone ya combats, na ngambo ya nord-ouestya ekolo naye. Pe yoko etuluku na bakonzi ya bikolo ya bapaya basilaki koyingela na mokolo mua lelo o esika ya boleli ye poya bopesi mbote ya suka na maréchal ya ekolo Tchad.

Naboyebi ete bazalaki na motango ya 11 ya bakonzi ya bikolo, o kati na bango mokonzi ya ekolo França, Emmanuel Macron, mokonzi ya ekolo Congo Democratique, Félix Tshisekedi, ya Niger, Mohamed Bazoum pe lisusu représentant ya diplomatie ya Europa, Josep Borrell banso bazalisamaki o engumba mokonzi Ndjamena, o ekolo Tchad, poya boleli elongo mokonzi ldriss Déby.

Naboyebi ete bozangi ya moto yoko esilaki komonisama makasi, ezali ya mokonzi ya ekolo Congo, Denis Sassou-Nguesso, ye oyo asilaki kotalisa bozangi naye na tina ya yoko matungisami kati na libota naye. Fina na nse oyoka manso. Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.

  • cover play_arrow

    O ekolo Tchad, bokundami ya mokonzi Idriss Déby Itno esili koleka na mokolo mua minei eye, o liboso ya bakonzi bayike ya bikolo. rna

Editor: rna

Rate it

Notícias

0%
donut_large