C.Internacional - Destaque

Compagnie ya pétrole ya ekolo Italie, esilaki kotalisa posa na bango ya ko investir, na mibu 4 mizali koya, motango ya 7 milliards ya dollars poya mosala.

todayAbril 8, 2021 18

Background
share close

Compagnie ya pétrole ya ekolo Italie, ENI-SPA na mokusé, esilaki kotalisa na mokolo mua ibale eye, awa o engumba mokonzi Luanda ete bango basili kolengela ko investir, na mibu 4 mizali koya, motangio 7 milliards ya dollars na mabongisami ya boluki luki, ya production, ya raffinage pe ya énergie solaire.

Wana ezalaki maloba kowuta na bapanzi sango sima ya bokutani ya PCA ya companie yango ya l’ENI-SPA, tata Claudio Descalzi, elongo na tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço.

Naboyebi ete na suka ya bokutani yango, mokonzi ya exécutif ya ENI, tata Guido Brusco, asilaki kopesa maloba ete na masolo kati na tata mokonzi  João Lourenço elongo na tata Claudio Descalzi, basilaki komaniola na tina ya mabongisami to projets ya production ya essence pe lisusu ya diesel biologique. Mabongisami miye misengeli komema o liboso boloni bilanga pe bokitisi ya ya mopepe ya carbone. Pe mokonzi ya ENI asukisaki koloba ete etuka ya Namibe ekoki kozua kino mobu se yoko, yoko mabongisami to production ya 50 mégawatts poya bokitani na système électrique diesel, eye ekosunga poya ko économiser, koleka mbala 4, ba depenses ya eleko eye. Fina na nse oyoka manso. Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.

  • cover play_arrow

    Compagnie ya pétrole ya ekolo Italie, esilaki kotalisa posa na bango ya ko investir, na mibu 4 mizali koya, motango ya 7 milliards ya dollars poya mosala. rna

Editor: rna

Rate it

Notícias

C.Internacional - Destaque

Banque nationale y’Angola (BNA) esili ko développé yoko elembo to indicateur ya boyebi na yambo mambi matali inflation.

Banque nationale y'Angola (BNA) esili ko développé yoko elembo to indicateur ya boyebi na yambo mambi matali inflation na mabongisami ya bobongisi tango inso bisalelo ya bomanioli lolenge talo ya biloko ezali kotambola kati na economie ya ekolo. Pe na tina na yango, BNA esilaki ko lancé, na ebandeli ya sanza ya 4 eye, boluki luki to ba enquêtes 2 na tina ya bopesi nzela ya bolimboli kati na bato […]

todayAbril 8, 2021 56

0%
donut_large