Batu sambo bakufi na mbala moko na município ya Kilenda na etuka ya Kwanza-sul, bango nionso baliaki biloko balamba na mafuta ya mbila
Likambu yango esali pasi mingi naba fandi ya município ya Kilenda komona lolenge batu wana bakufi bango nionso n ambala moko. Pe kolandisama maloba ya batu, balobi ete baye banso basili kokufa baliaki biloko balamba na mafuta ya mbila pe kino sikoyo SIC naba minganga bazali kosala boluki luki pona koyeba nini penza ebomi batu wana. Fina nase oyoka masolo manso. Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Kiala Mavembo.
Banque nationale y’Angola (BNA) esili ko développé yoko elembo to indicateur ya boyebi na yambo mambi matali inflation na mabongisami ya bobongisi tango inso bisalelo ya bomanioli lolenge talo ya biloko ezali kotambola kati na economie ya ekolo. Pe na tina na yango, BNA esilaki ko lancé, na ebandeli ya sanza ya 4 eye, boluki luki to ba enquêtes 2 na tina ya bopesi nzela ya bolimboli kati na bato babengami ba grand public pe yoko lisanga ya bato ya ba institutions.