C.Internacional - Destaque

mokonzi ya MPLA, tata João Lourenço, asilaki kopesa maloba na tina ya bomati na 50% ya bozalisami ya basi kati na biteni binso ya lingomba ya MPLA

todayMarço 29, 2021 251

Background
share close

Mokonzi ya MPLA, tata João Lourenço, asilaki kopesa maloba na mokolo na minei, awa o engumba mokonzi Luanda, na tina ya bomati kino 50% ya bozalisami to pe participation pe bomonisami to pe représentation ya basi kati na ba organes ya lingomba naye ya politiki.

Ezalaki na bozui naye maloba na bofunguami ya liyangani ya mbala na 7 ya Congrès ordinaire ya OMA, pe tata João Lourenço asilaki kobeta sete ete bokokani eye to pe parité yango ekosalema na sanza ya 12 ya mobu moye na mabongisami ya Congrès ya MPLA. Pamba te kino sika basi bazali komonisama bobele se na 40% kati na ba organes pe organismes ya lingomba ya MPLA. Tata mokonzi João Lourenço atalisaki ete mambi maye makokokana ata na yoko te kati na lisituale ya mabongisami to pe organisations politiques onsé bua ekolo Angola. Fina nase oyoka manso. Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa.

  • cover play_arrow

    mokonzi ya MPLA, tata João Lourenço, asilaki kopesa maloba na tina ya bomati na 50% ya bozalisami ya basi kati na biteni binso ya lingomba ya MPLA rna

Editor: rna

Rate it

Notícias

0%
donut_large