C.Internacional - Destaque

Tata mokonzi ya ekolo, asili kopesa liyebisi ya revision ya yoko eteni ya constitution ya ekolo

todayMarço 3, 2021 39

Background
share close

Na basango ya ekolo, tata mokonzi ya ekolo, João Lourenço, asilaki ko annoncé na mokolo na lelo, awa o engumba mokonzi Luanda, ete akosila kotala misusu to pe ko reviser yoko eteni ya Constitutionya ekolo.

Ezalaki na bopesi naye lisikulu ya bofongoli liyangani ya Conseil ya ba ministres, tata mokonzi asilaki kobeta sete koloba ete azalisami kati na boluki pole na mituna mitali inspection na nzela ya Parlement.

Tata mokonzi João Lourenço asilaki kotalisa ete  révision yango ekotala pe lisusu mituna mitali mabongisami ya maponami ya bana ba ekolo baye babikaka na bikolo ya bapaya, lokola pe lisusu mituna mitali maponami ya municipales o ekolo Angola.

Esengeli koyeba ete tata mokonzi na lisikulu naye asilaki kotalisa ete proposition, eye Conseil ya ba ministres esengeli komaniola kobanda mokolo na leo ezali poya stabilité ya ekolo.

Fina na nse oyoka yango

  • cover play_arrow

    Tata mokonzi ya ekolo, asili kopesa liyebisi ya revision ya yoko eteni ya constitution ya ekolo RNA

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa

 

Editor: RNA

Rate it

Notícias

CONTACTOS

0%
donut_large