Banda mokolo ya 24 na sanza oyo, ba mpepo oyo ekobanda kowuta na ekolo Afrika ya Ngele, Brazil pe Portugal eko kota lisusu na kati ya ekolo Angola te
Lolenge ya sika ya bokono na covid-19 oyo ezali komonana na mokili nde esali l´Etat ya ekolo Angola azwa mokano oyo wana. Ministre ya l´Etat Adão de Almeida nde atiyaki sango polele na ndaku ya CIAM awa na engumba mokonzi luanda pe alobi mobeko yango ekoti na kati ya eleko oyo tozali kolekisa ya calamite publique. Fina nase oyoka masolo manso Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Kiala Mavembo
Parlement ya ekolo Angola ayebi kondima lelo na mobimba nayango nionso mobeko oyo ekobanda kotambuisa misala na tribunal constitucionel, pe ministre ya makambo na bosembo pe bobateli mibeko mya bato tata Francisco Queirós, alobi ete mobeko wana ekopesa sikawa pole ya makasi na misala yaba tribunal ose bua ekolo nabiso Angola.