C.Internacional - Destaque

L´Etat Apesi Nzela Ba Momekano Minene Mya Masano Ezonga Kasi Likambu Yango Ezali Kokabola Ba Beti Ndembo Pe Baye Balangua Masano

todayOutubro 26, 2020 23

Background
share close

L´Etat Apesi Nzela Ba Momekano Minene Mya Masano Ezonga Kasi Likambu Yango Ezali Kokabola Ba Beti Ndembo Pe Baye Balangua Masano.

Eleki ba sanza ebele banda ba momekano mya minene na ba masano na kati ya ekolo angola, ekangama na tina na bopekisi na bokono na covid-19.

Kasi sikawa l´etat apesi nzela ete ba momekano wana ezonga kasi na botosi ba ndingisa nionso pona bobundisi bokono na covid-19 pe naba mabanda na masano, babeti ba banda kobeta kaka bango moko, baye balangua masano pe bato mosusu bakoki kokota te.

Likambu mosusu ezali kokabola batu, ezali pona kosala babeti ba teste ya covid-19, esengeli ba ekipi bango moko babimisaka mosolo pona yango.

Fina nase oyoka masolo nionso na batu na masano pe na baye balangua masano.

  • cover play_arrow

    L´Etat Apesi Nzela Ba Momekano Minene Mya Masano Ezonga Kasi Likambu Yango Ezali Kokabola Ba Beti Ndembo Pe Baye Balangua Masano rna

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Kiala Mavembo

Editor: rna

Rate it

Notícias

C.Internacional - Destaque

Ba Mbotama Ya Ekolo Angola Bazali Na Boyokani Pe Na Bomoko, Pe Balingaka Ekolo Nabango Elobi Bodri, Mombata Ya Ekolo Africa Na Ngele Apona Angola Lokola Esika Yako Fanda

Ba Mbotama Ya Ekolo Angola Bazali Na Boyokani Pe Na Bomoko, Pe Balingaka Ekolo Nabango Elobi Bodri, Mombata Ya Ekolo Africa Na Ngele Apona Angola Lokola Esika Yako Fanda. Mobengisami nabiso na eteni naba mpaya ose bua ekolo Angola, Ndeko Bodri ye azali 50% mombotama ya ekolo RDC pe 50% mombotama ya ekolo Africa ya Ngele pe esi afandaka na ekolo Angola banda mobu na 2002. Na mibu 18 miye […]

todayOutubro 26, 2020 35

0%
donut_large