C.Internacional - Destaque

Bokokanesi Mya Mibeko Mya Basi Pe Mibali «Direitos Iguais», Elingi Koloba Teke Ba Mama Batosa Lisusu Mibali Te

todayOutubro 25, 2020 48

Background
share close

Ezali na basi mingi basosolaka mabe likambu na bokokanesi na mibeko na kati na basi pe mibali, bakanisaka ete elakisi muasi abanga lisusu mobali te, atosa lisusu mobali te pona bakokani, te, esengeli ezalela bongo te, elobi mama Tatiana mofandi na bairro cuca na engumba mokonzi luanda.

Ye apesi toli naba mama ete bakoka kososola malamu, ke bokokanesi na mibeko na basi pe mibali, ezali te pona kokitisa mibali pe kotombola basi, kasi elingi kaka eloba ete misala misusu pe oyo mibali basalaka, basi pe bakoki kosala yango.

Yanguana atako mobeko ezali yabo kokanesi mibali na basi, esengeli na basi babosana te bisika nabango naba ndaku, ete papa azali kaka chefe pe motu ya ndaku.

  • cover play_arrow

    Bokokanesi Mya Mibeko Mya Basi Pe Mibali «Direitos Iguais», Elingi Koloba Teke Ba Mama Batosa Lisusu Mibali Te rna

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Kiala Mavembo

Editor: rna

Rate it

Notícias

C.Internacional - Destaque

Nsimba Reoboth Alobi Soki Mutu Azui Kisi Pona Asala Musala Na Nzambe, Wana Aza Aventurier Pona Kisi Ya Solo Ezali Losambo

Moyembi ya miziki na Gospel azalaki mobengisami ya programe na lokota na lingala ya RNA pe tolobelaki na tina na moboyi naye na miziki pe bomoyi naye na libota. Moyembi ya Nzembo «quero minha bênção», alobaki nabiso ete nionso oyo batu balobaka pona ye, ke aza na kisi ezali makambu ya lokuta, pona ye kisi naye ya solo ezali losambo nako kila bileyi. Alobaki lisusu ete mutu nionso oyo akendaka […]

todayOutubro 25, 2020 329 1 2

0%
donut_large