C.Internacional - Destaque

mangomba na losambo oyo nanu bazali yako bongama te, bakoki pe kofongola bikuke nabango te pe ebele bazali kotosa yango

todayOutubro 21, 2020 59

Background
share close

MANGOMBA NA LOSAMBO OYO NANU BAZALI YAKO BONGAMA TE, BAKOKI PE KOFONGOLA BIKUKE NABANGO TE PE EBELE BAZALI KOTOSA YANGO.

Mokambi ya lisanga na mangomba na losambo na kombo ya CIRA, Reverendo Nzunzi Antonio, alobi nabiso lolenge misala na mangomba na losambo mizali kotambola na eleko oyo ya covid-19.

Lolenge toyebi mangomba na losambo, efandaki ba sanza sambo mokoka nionso wana pona bopekisi oyo bokono ya covid 19 ememelaki biso.

Kasi mosali na Nzambe alobi ete mangomba manso maye bakokisi te mbela oyo l´etat ya ekolo azali kosenga na mangomba na losambo, bafongoli pe bikuke bango te, yanguana asengaki pe lisusu na basali na Nzambe bakotisa losambo ya bana mike te ECODIM, pe ba protocoles balataka ba gants pona koboya bokabuani na bokono.

Alobi bango bazali yako sepela lolenge l´etat ayokaki mbela ya mangomba na losambo pe abakisi mikolo mineyi na kati na poso pona koyangana.

  • cover play_arrow

    mangomba na losambo oyo nanu bazali yako bongama te, bakoki pe kofongola bikuke nabango te pe ebele bazali kotosa yango rna

Liziba ya Sango: RNA/Canal Internacional- Jornalista Kiala Mavembo

Editor: rna

Rate it

Notícias

0%
donut_large