C.Internacional - Destaque

DOM AFONSO NUNES, ASENGI NA MOKONZI NA EKOLO JOÃO LOURENÇO AKOBA KOBUNDISA BA MBEBA NA MADESU YA BANA TO CORRUPÇÃO

todayOutubro 13, 2020 112

Background
share close

Na masolo tozalaki nayango na mokambi ya lingomba na losambo naba Tocoista, Dom Afonso Nunes, tolobelaki mingi mibu misatu oyo wapi mokonzi ya ekolo João Lourenço esi afandi na ebonga yabo kambi ekolo Angola wapi ekokaki na mokolo ya 26/09/2020.

Lokola biso nionso toyebi ete, bitumba makasi ya tata mokonzi na ekolo ezali kobundisa ba mbeba ya madesu ya bana to corupção, pe ebele yaba batu ya minene pe bakonzi ya motuya pona ekolo babuakami na boloko na sima yabosambisi bango naba mbeba yabo yibi misolo ya l´Etat.

Mosali na Nzambe, Dom Afonso Nunes nasuka na masolo nabiso, asengi na bato ete bakoba kolikia na politiki na mokonzi João Lourenço pona ete azali na makanisi malamu ya bobongisi ekolo pe kopesa bisika na bilenge. Azangaki pete kosenga na João Lourenço atika te kasi akoba kobundisa ba mbeba ya madesu ya bana to corrupção.

 

  • cover play_arrow

    DOM AFONSO NUNES, ASENGI NA MOKONZI NA EKOLO JOÃO LOURENÇO AKOBA KOBUNDISA BA MBEBA NA MADESU YA BANA TO CORRUPÇÃO rna

 

Fonte: Canal Internacional/RNA – Jornalista Kiala Mavembo

Editor: rna

Rate it

Notícias

0%
donut_large