C.Internacional - Destaque

Ministre ya bokolongono bua nzoto, asilaki kotalisa ete, bobele se manguele eye elongobani nde ekopesama na bana ba ekolo Angola.

todayMarço 18, 2021 81

Background
share close

Na basango ya covid, ministre ya bokolongono bua nzoto, maman Sílvia Lutucuta, asilaki kotalisa lisusu na mokolo mua lóbi moleki ete bobele se manguele eye elongobani nde ekopesama na bato.

Ezalaki na boyanoli naye na bapanzi sango na suka ya liyangani ya mabongisami ya bobundisi Covid-19 elongo na ba députés ya Assemblée nationale, epayi wapi maman ministre asilaki kotalisa ete yoko commission esili kosalema poya bolandeli to pe ko surveiller ba effets secondaires ya mangule to vaccin AstraZeneca.

Pe kolandisama momemi maloba ya Commission yango, effets indésirables miye misili komonisama kino sika mizali ya mabe te.

Naboyebi ete ministre ya bokolongono bua nzoto asilaki kotalisa ete sima ya etuka ya Luanda, eili kolengelama sika kokoba na manguele yango na bituka ya Cabinda, Benguela, Huambo pe Huíla. Pe na sima nde bakokoba na bituka ya Huambo pe Bié.

Esebngeli koyeba ete kino sika motango 44.000 ya bato basili kozua manguele kati na ekolo Angola, baye bazali bato na bokolongono bua nzoto to ba professionnels ya santé, ba mpaka, balakisi pe ba soda.

Fina nase oyoka manso

  • cover play_arrow

    Ministre ya bokolongono bua nzoto, asilaki kotalisa ete, bobele se manguele eye elongobani nde ekopesama na bana ba ekolo Angola. rna

Liziba ya sango: RNA/Canal Internacional-Jornalista Paciência Lumpitumuni Passa

Editor: rna

Rate it

Notícias

CANAL A - Destaque

Proposta de revisão da Constituição aprovada na generalidade com abstenção da UNITA

A proposta de revisão pontual à Constituição, apresentada pelo Presidente da República, João Lourenço, foi aprovada no parlamento. A proposta passou com 150 votos a favor, nenhum contra e 48 abstenções. Daqui para frente vai ser discutida na especialidade, e, posteriormente, aprovada em reunião plenária. Com estes números, segundo o presidente da Assembleia Nacional, Fernando da Piedade Dias dos Santos, a proposta, que agora segue para a primeira Comissão, para […]

todayMarço 18, 2021 155

0%
donut_large